Retour à l'accueil
Le crapaud - Ligorodo

Un jour, le crapaud, la gazelle, le sanglier, l'antilope et beaucoup d'autres animaux de la forêt étaient réunis.
Ils discutaient tous très bruyamment. Seule la gazelle ne disait rien. Elle écoutait patiemment et d'un air supérieur.

Mokolo moko, ligorodo, impala, ngoya, mbuluku na banyama ebele ya zamba basanganaki.
Bazalaki kosolola na makelele ya makasi. Kaka impala azalaki koloba te. Azalaki koyoka bango.

Lorsque tout le monde était fatigué d'avoir tant parlé et se préparait à rentrer chez soi, elle se vanta :
" Vous tous, vous faîtes beaucoup de bruit et vous parlez beaucoup mais vous n'êtes pas importants. Regardez-moi ! Je suis connue dans le monde entier parce que je suis la plus rapide ! "

Bango nionso balembaki likolo ya masolo oyo ya molai mpe bakomaki kokende tango mbuluku alobi :
" Bino, bolobaka mingi mpe bosalaka makelele mingi kasi ezali pamba. Botala ngai nanou ! Bayebi ngai na mokili mobimba mpo naleki na mbango ! "

A ces mots, les autres animaux se vexèrent et tous en même temps ils se mirent à affirmer :
" C'est faux ! C'est moi qui cours le plus vite ! "

Banyama banso bayoki kanda. Basepeli te ndenge mbuluku alobaki bongo mpe bakomi koloba na nzela moko :
" Tika koloba boye mpo ezali lokuta ! Ngai oyo naleki mbango ! "

La gazelle, qui était très sûre d'elle, proposa finalement d'organiser une course.
" Venez tous demain matin et on verra bien si l'un d'entre vous est capable de me battre ! "
Tous les animaux acceptèrent de relever le défi et chacun rentra vite chez soi pour s'entraîner.

Mbuluku azalaki mutu ya lolendo makasi.
" Boya lobi na tongo bongo tokomona soki ata moko na bino akoki koleka ngai na mbango ! "
Banso bandimi mpe bazongi noki epai ya bango mpo bamilengela.

Le crapaud aussi voulait participer à la course, mais il savait qu'il ne pouvait pas gagner parce qu'il ne savait pas courir.
Il décida donc de réunir tous ses frères pour leur raconter ce qui s'était passé.

Ligorodo mpe lokola alingaki azala na kati ya mbango kasi ayebaki kokima mbango te.
Azui likanisi ya kobengisa bandeko na ye banso mpo ayebisa bango ndenge masolo elekaki.

Une fois tous rassemblés, le crapaud demanda à ses frères de se disperser le long du trajet sur lequel la course allait avoir lieu et de bien se cacher.

Tango bango nionso bazalaki na ye, ligorodo ayebisi bandeko na ye bakende kobombama na nzela ya mbango.

Le lendemain matin tous les animaux étaient présents sur la ligne de départ et en voyant que le crapaud lui aussi était venu ils se mirent tous à rire très fort.
" Qu'est-ce que tu viens faire ici toi qui ne sait même pas courir ? "

Lobi nango, banyama banso bakutanaki mpo bakima mbango. Tango bamoni ete ligorodo ye mpe ayaki, bakomi koseka ye.
" Oye kosala nini awa ? Oyebi kokima mbango te ! "

Puis le départ fût donné et chacun partit le plus vite possible.

Tango ya mbango ebeti. Moko na moko azalaki kosala makasi mpo aleka bamisusu.

Bien entendu, tous les animaux étaient loin derrière la gazelle et ils n'arrivaient pas à la rattraper.
....Tous sauf un !

Kasi mbuluku alekaki bango nionso na mosika.
....Kaka moko azalaki na nsima na ye te !

En effet, dès que la gazelle arrivait à une nouvelle étape de la course, elle voyait le crapaud qui était déjà là et qui lui disait :
" Regarde, je suis encore arrivé avant toi ! Vois-tu, ce n'est pas toi la plus rapide ! "

Bambala nionso mbuluku alingaki akoma na esika mosusu ya nzela, akutanaki ligorodo azalaki kuna liboso na ye. Ligorodo mpe ayebisaki ye :
" Tala nanou ! Nakomi awa liboso na yo ! Omoni ete ngai oyo naleki yo na mbango ! "

La gazelle continuait à courir le plus vite possible mais c'était toujours la même chose et jusqu'à la ligne d'arrivée le crapaud était toujours le premier.

Mbuluku atiki kokima mbango te. Kasi ligorodo azalaki kaka liboso na ye ti na suka ya mbango.

Le crapaud est donc sorti vainqueur de cette épreuve à la surprise de tous les animaux de la forêt.
Depuis ce jour, le petit crapaud est très respecté par tous ses amis et la gazelle ne se vante plus de rien.
... Et jusqu'à aujourd'hui on parle encore de l'exploit du crapaud !
D'ailleurs, même si nous savons que le crapaud ne sait pas courir, il est pour le moins très rusé !

Banyama nionso ya zamba bakamwaki ndenge ligorodo alongaki bokitano oyo.
Banda mokolo wana, Bongo mbuluku ye atiki komilakisa.
Ti lelo bayokaka lisolo oyo likamwisi ya ligorodo !
Ata biso toyebi ete ligorodo akoki kokima mbango te, kobosana te azali mayele mingi !