Retour à l'accueil
Le python et l'antilope - Nguma na impala

Un jour un python est parti chasser dans la forêt. Il a trouvé un gibier et l'a avalé tout entier. Le python avait été très gourmand en voulant manger un si gros animal et maintenant la digestion allait durer longtemps et le fatiguer beaucoup. Incapable de bouger, il s'était donc installé sous un gros arbre et avait fini par s'endormir profondément.

Mokolo moko, nguma akendeki bokila na zamba. Amonaki nyama moko ya monene mpe amelaki ye mobimba. Azalaki lokoso mingi ndenge aminaki nyama ya monene boye !
Sikoyo, makasi ya kotambola esilaki ye mpe akomaki kolala mopngi na nse ya nzete moko ya monene.

Soudain, une violente tornade s'est mise à souffler dans la forêt si bien que beaucoup d'arbres ont été déracinés et transportés par le vent. Certains se sont même retrouvés accumulés autour du gros arbre au pied duquel le python était couché.

Mbala moko, mopepe ekomi kopepa makasi na zamba. Banzete ebele ebukanaki mpe ekomaki kopumbwa.
Tango mopepe esili, bakoni bitondaki na zingazinga ya nzete oyo nguma azalaki kolala na nse nango, kasi ayebaki eloko te.

Quand il se réveilla au bout d'une semaine, il réalisa qu'il était bel et bien coincé. Il n'avait pas la force de soulever seul tous ces troncs d'arbres pour se dégager.
Les jours passèrent et le python restait toujours prisonnier sans personne pour l'aider. Il était bien triste et commençait a avoir très faim.

Mikolo elekaki tango nguma alamuki. Amoni akangamaki na nse ya banzete ebele. Makasi ya kotombola yango ye moko mpo abima na esika oyo ezalaki mpe te.
Mikolo elekaki lisusu, nguma avandaki ye moko na mawa mpe na nzala ya makasi. Mutu ya kosalisa ye azalaki te.

Mais un jour, l'antilope passa par là et entendit quelqu'un l'appeler. C'était le python qui lui demandait de venir l'aider.
" Je suis coincé sous cet arbre depuis bien des jours ! S'il te plaît, viens m'aider à sortir de là ! "
L'antilope se méfiait beaucoup de ce gros serpent car il était connu pour avoir un appétit féroce et elle refusa de venir à son aide.

Mokolo moko, impala azalaki kotambola tango ayoki mongongo ya nguma. Azalaki kobenga ye mpo aya kosalisa ye :
" Nakangami na nse ya banzete oyo banda kala ! Yokela ngai mawa mpe salisa ngai nabima na esika oyo ! "
Kasi impala aboyaki mpo ayebaki nguma azalaki mutu ya lokoso makasi. Azalaki kobanga mpo na bomoi na ye !

Le python était désespéré. Il demanda à l'antilope de lui faire confiance et lui jura de ne jamais tenter de la manger.
Après beaucoup de discussion et d'hésitation, l'antilope eût finalement pitié du python. Elle décida donc de l'aider à se dégager de cet amas de bois et commençait à retirer un à un les troncs d'arbres.

Nguma azalaki lisusu na elikia te. Ayebaki soki impala asalisi ye te akokufa. Yango abeleli impala andimela ye mpe alakaki akosala ye mabe te.
Basololaki mingi. Impala ayebaki te soki akoki kondimela ye kasi ayokelaki ye mawa.
Impala abandaki kolongola mabaya moko na moko.

Mais dès que le python se trouva libéré, il se jeta sur l'antilope pour la dévorer.
" Ca fait des jours que je n'ai pas mangé et je suis affamé ! Je n'ai pas la force d'aller chasser . Alors excuse-moi mais je dois te manger ! "
L'antilope était stupéfaite d'un tel manque de reconnaissance et n'était pas prête à se laisser faire. Elle venait de le sauver et le python ne pensait maintenant qu'à faire d'elle un bon repas !

Kasi tango nzela ya kokima emonamaki, nguma amibwaki na impala mpo alia ye.
" Nalie te mikolo mingi. Nzala esali ngai makasi mpe nzoto na ngai ezali ya kolemba. Nakoki kokende bokila sikoyo te ! Limbisa ngai esengeli nalia yo ! "
Impala akamwaki. Ndnenge nini nguma akosala boye nzoka auti kobikisa ye ? Akomitika te akoma bilei na ye !

Pendant qu'ils se disputaient, la gazelle s'était approchée d'eux à son tour.
Elle leur demanda quel était le sujet de leur dispute et l'antilope et le python lui expliquèrent toute l'histoire. La gazelle était très malicieuse et leur dit :
" Je ne comprends pas bien la situation. Pouvez vous retourner à vos places et me montrer exactement ce qui s'est passé entre vous ? Ainsi, je pourrais vous dire qui de vous deux a raison ! "

Bazalaki kosuana makasi tango mboloko akomaki pembeni na bango.
Atuni bango likambo mpe bango mibale bakomi kobetela ye lisolo. Mboloko azalaki na bwanya mpe na mayele. Alobi :
" Nasosoli malamu te. Bozonga bisika bozalaki liboso mpe bolakisa ngai ndenge likambo esalamaki. Yango nakoyeba nani azali na mbeba ! "

Le python était certain d'être dans son droit et alla se remettre sous le tas de bois où il avait été coincé. L'antilope, elle, recula et se plaça à quelques mètres du python .
La gazelle se tenait au milieu des deux et réfléchissait.

Nguma andimaki te akoki kozala na mabe yango azongi kokangama na nse ya nzete ya monene. Impala ye mpe lokola azongi na esika na ye.
Mboloko atelemaki na kati kati.

Enfin, la gazelle se tourna vers l'antilope et lui demanda :
" Maintenant que le python se retrouve coincé sous tous ces arbres, qu'allons-nous faire de lui ? Allons-nous l'aider à se libérer ?
- Certainement pas ! Je préfère le laisser là, lui répondit l'antilope. Ce python n'a aucune parole. Je lui ai fait confiance et j'ai eu pitié de lui. Je l'ai aidé et il a voulu me dévorer en guise de remerciement ! "

Mboloko atali impala mpe atuni ye :
" Sikoyo tala nguma akangami na ye. Tokosala nini ? Olingi tobimisa ye ?
- Mpo na ngai, malamu totika ye boye, ayanoli impala. Na si nandimela ye mbala moko, na si nayokela ye mawa ! Nasalisa ye mpe kotonda botondi na ye ezalaki kolia ngai ! "

Ainsi, cette fois, le python eût beau pleurer et supplier, elles le laissèrent bloqué sous le gros arbre et s'en allèrent.

Na suka nango, batiki nguma ye moko na nzala mpe na kolela na ye. Mboloko na impala bakendeki mosika.